Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biyamba motoba balaki kotika PV na bango lelo kasi CENCO na ECC basengi kokutana na Tshisekedi


Boko na ba episkopo ya Cenco (Conférence épiscopale nationale du Congo) na Kinshasa, 11 janvier 2017. (Top Congo/VOA)
Boko na ba episkopo ya Cenco (Conférence épiscopale nationale du Congo) na Kinshasa, 11 janvier 2017. (Top Congo/VOA)

Bakambi ba CENCO mpe ECC balaki kokutana na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi nsima na masolo na mokambi ya Assemblée nationale mpo na bozangi boyokani na kopona motmbwisi ya CENI. Kasi bakambi ba biyamba motoba misusu balaki kotika lelo mercredi procès-verbal ya boponi mokambi ya CENI lelo.

Ngambo mibale ya bakambi ya biyamba baye bakabwani wuto mardi na mpokwa mpo na boboni motambwisi ya CENI bakutani mercredi na bakambi ba Assemblée nationale mpo kolakisa esika nini bakomi sika.

Bakambi ba biyamba motoba baye basakolaki na mardi na mpokwa ete bazwi moto atambwisa CENI balobi bazali kokoma mokanda na bango mpo batika yango na Assemblée nationale mpo mokolo mwa le 28 juillet nde esengeli kopesa nkombo yango kolanda linaka ya suku ya nse ya Parlement.

"Botuna biso mootuna mwango na 23h, kasi tokotika lelo, ezali mokolo mwa suka," elobi motambwisi ya ngambo moko y aba Eglise du réveil nya Congo (ERC), prophète Dodo Kamba nsima na kokutana na Christophe Mboso Nkodia Pwanga, mokambi ya Assemblée nationale.

"Tondimi kokutana na masolo na ba Catholiques mpe ba protestants kasi tosilisi mosala mpe likita mosusu ebongisami te mpo na yango... Mokambi ya Assemblée nationale asengi biso tosala mpo na kimya," elobi moko na bakmbi ba biyamba motoba.

Yambo na yango, balakisi bilongi ba CENCO, lisanga lya ba episkopo ya Catholique, na ye ECC, Eklezia ya bamisioni, bango mpe bakutanaki na M. Mboso.

Nsima na bokutani bwango, bayi CENCO mpe ECC balaki kokutana na mokonzi ya mboka.

Lobi na mpokwa bakambi ba ERC, eklezia ya Kimbanguiste, orthodoxe, ba indépendants, Armée du Salut mpe ba Musulmans bakendaki na ngambo na bango kosakola ete bazwi motambwisi ya CENI.

Bawutaki kobima na likita basalaki mokolo mombimba elongo bayi CENCO mpe ECC mpe bayokanaki kokoba mosala mwa bango mercredi.

Ekosenga na Assemblée nationale kotala na Commission paritaire na yango soki mokanda composante moko na moko ekotika elandi mibeko to te. Soki te, composante yango ekosengama kobandela mosala na yango, elimbola na VOA Lingala mokambi ya SYMOCEL (Synergie des mission d’observation citoyenne des élections), Me Patrick Ngoyi.

XS
SM
MD
LG