Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Donald Trump asengi na batomboki kozongela nzela ya Buku likonzi na Mali


mokambi ya mampinga ma likolo ya Mali, colonel-major Ismael Wague (2e G) na bokutani na bapanzi sango na Kati, Mali, 19 aout 2020.
mokambi ya mampinga ma likolo ya Mali, colonel-major Ismael Wague (2e G) na bokutani na bapanzi sango na Kati, Mali, 19 aout 2020.

Président ya Etats-Unis alobi mbulamatari inso ekosalama na libanda lya maye Buku likonzi ebongisa mpe ya ba institutions ya Mali ekondimama te.

Lingomba lya basoda libengami Commission to Misala mpo na lobiko ya bana Mali lisakolaki ete lizwi bokonzi mpe likomema mboka na maponami na lombango, nsima na président Ibrahim Boubacar Keïta oyo bakangaki mardi, kosakola ete atiki bokonzi.

"Nazali na mabanzo mingi likolo na botomboki (ya basoda) na Mali mpe na kanisi ete manso makozonga na nzela ya Buku likonzi. Mbongwana inso libanda lya Buku likonzi na nzela ya mbulamatari songolo, ekobebisa democratie na Mali mpe ba institutions eye esengeli ata ezali mpenza malamu te. Etats-Unis ezali elongo na bana ba Mali ntango eye ya mpasi," ekomi M. Trump na compte Twitter na ye.

Union africaine esakoli ete etie Mali pembeni mpo na bokweyisami ya bokonzi na basoda.

Bakonzi ba bikolo mingi lokola ya France mpe mabongisi mingi mpe batelemeli bokweyisami bokonzi boye.

"USA etelemeli na makasi botomboki ya ba soda na Mali. Tozali elongo na baninga ba biso ya molongo kati na bango ezwami na lisanga lya nkita lya bikolo bya Afrika ya West (CEDEAO) mpe Union africaine na kopamela bikela biye," ekomaki na ngambo na ye Secrétaire d’Etat (ministre ya mambi ya Bapaya ya Amerika), Mike Pompeo.

CEDEAO mpe epesi etumbu na Mali.

Basoda bazwi bokonzi na Mali basengi na bana mboka na bango kotika kopunza mpe koyiba.

XS
SM
MD
LG