Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump asakoli bozongisi ya RDC na AGOA


Ntoma to ambassadeur ya Etats-Unis, Mike Hammer (G), elongo na mokambi ya USAID Mark Green (C), n a bokutani na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, na Cité ya union Africaine, Kinshasa, 19 août 2019. (Facebook/Ambassade USA/Kinshasa)
Ntoma to ambassadeur ya Etats-Unis, Mike Hammer (G), elongo na mokambi ya USAID Mark Green (C), n a bokutani na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, na Cité ya union Africaine, Kinshasa, 19 août 2019. (Facebook/Ambassade USA/Kinshasa)

Président Donald asakoli bozongisami ya RDC na AGOA, mabongisami mapesaka nzela na bikolo bya Afrika kosala mombongo na Amerika, elobi ntoma ya USA na Kinshasa Mike Hammer.

Wuta Amerika epayi wapi azali na loyi, ntoma Mike Hammer asakoli ete Maison Blanche, ndako ya mosala ya mokonzi ya mboka ya Etats-Unis.

Sango ya malamu mpeza! Mpo na makasi ya président Tshisekedi mpe bo’ elombo ya bondeko na biso (partenariat privilégié pour la paix et la prospérité, na yoki na Maison Blanche ete endimami mpo na kozonga na AGOA. Yango ekofungola mabaku ya nkita mingi, ekomi na Twitter M. Hammer.

Mokeno moye motalisi makasi RDC esali mpo na kotosa malako makasi masengi na Congrès ya Etats-Unis.

Etali mpe makasi président Félix Tshisekedi asali na ntina ya komema mbongwana na misala mya bokambi mboka, kobatela makoki ma bomoto mpe kobundisa kaniaka, elobi ambassade ya Etats-Unis na Kinshasa,

Mike Hammer akomi compte Twitter na ye ete yango etalisi misala mizali kosalama na nzela ya boyokani Etats-Unis ezali na yango wuta président Felix Tshisekedi akota na bokonzi.

XS
SM
MD
LG