Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump ayebisi kalaka mokonzi ya ONU ete Amerika elongwe na OMS


Président Donald Trump (D) azali kopesa lisikulu pene na kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na 73e session ya Assemblée générale ya Nations unies na New York, 28 septembre 2018.
Président Donald Trump (D) azali kopesa lisikulu pene na kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na 73e session ya Assemblée générale ya Nations unies na New York, 28 septembre 2018.

Président Donald Trump akomeli kalaka mokonzi ya ONU mpo na koyebisa ete Etats-Unis elongwe na OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongono). Kasi Joe Biden, candidat ya ba démocrates oyo akowelela bokonzi na M. Trump na maponami ma novembre 2020, ayanoli ete soki alongi, Amerika ekozonga na OMS.

"Congrès ezwi mokanda ya président eye elobi ete Etats-Unis elongwe na OMS ntango bokono boye bopanzi na molongo bozali kongala," esakoli na Twitter Robert Menendez, moko na ba démocrates ya Commission ya Sénat ya mambi ya mboka ya bapaya asakoli yango na compte Twitter na ye.

Nations unies mpe endimi ete ezwi mokanda mwango.

Président Trump azali kopameli OMS, moko na biteni ya ONU, na kozanga kopesa eyano na lombango na pandémie ya coronavirus eye ebandaki na Chine na novembre 2019.

Molobeli ya Antonion Guterres, kalaka mokonzi ya ONU, ayebisi ete Amerika ezali kati na OMS wuto 1948, esengeli ekokisa makambo mabale yambo na kolongwa ; yambo kokisa mobu moko nsima na kosenga kolonga mpe kopesa mosolo ndenge esengeli.

Na ngambo na ye, Joe Biden, candidat ya ba démocrates oyo akowelela bokonzi na M. Trump na maponami ma novembre 2020, ayanoli ete soki alongi, Amerika ekozonga na OMS.

Etats-Unis epesaka 15% ya misolo OMS ezwaka.

M. Trump azwaki mokano ya kolongola Etats-Unis na OMS mwa sanza eleki kasi akomelaki nanu te bakambi ba ONU.

XS
SM
MD
LG