Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bemba alobi bato baleki na mbulamatari ntango moloso mozali kokita


Jean-Pierre Bemba mokambi ya MLC (Mouvement pour la libération du Congo) mpe motambwisi ya lingomba Lamuka) na meeting na place Ste Thérèse N'Djili, Kinshasa, 23 juin 2019.
Jean-Pierre Bemba mokambi ya MLC (Mouvement pour la libération du Congo) mpe motambwisi ya lingomba Lamuka) na meeting na place Ste Thérèse N'Djili, Kinshasa, 23 juin 2019.

Jean-Pierre Bemba, mokambi ya MLC (Mouvement pour la libération du Congo) mpe motambwisi ya lingomba Lamuka banda sanza moko, alobi ete bato baleki ebele na mbulamatari ya Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba.

"Bato baleki ebele ntango mosolo ya l’Etat ezali nse kokita," akomi na compte Twitter na ye.

"Ndenge nini kopesa eyano na bosenga ya makasi ya bana Congo? Ndenge nini kopesa eyano na maye matali bokonongono, nkita mpe bomoi na bato?" amituni na makomi na ye.

Na ngambo na yango lisanga Ensemble ya Moïse Katumbi esengi ete ba institutions ya mboka eyeba na kotosa mibeko.

Tosengi ete ba institutions ya ekolo etoosa mpenza mibeko. Tosengi bango lomema mokumba na bango nakosala mbongwana mosengeli mpo na botambwisami ya malamu ya l’Etat mpe mpo na biyano na nkwokoso ya ekolo, ekomi lisanga ya M. Katumbi.

Mbulatari momisakami o’mokolo ya yambo ya mposo na ntongo, sanza mwambe nsima na bokoti na bokonzi ya president Félix Tshisekedi mpe sanza misato nsima na botiyami ya Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba.

Mbulamatari myango mozali na bato 66. 49 ministre mpe 17 vice-ministres d'Etat. 5 vice-Premiers ministres, 10 ministres d'Etat, 3 ministres délégués, 31 ministres mpe 17 vice-ministres.

Kaka bovandisami na bango na mosala ya bamba bokesenga dollars milioni mitano, kolanda mokanda ya ministre ya budget.

XS
SM
MD
LG