Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Gouvernement Ilunga ebimi


Premier ministre ya sika Sylvestre Ilunga Ilunkamba na bokutani na président Félix Tshisekedi na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 20 mai 2019. (Twitter/Présidence de la RDC)
Premier ministre ya sika Sylvestre Ilunga Ilunkamba na bokutani na président Félix Tshisekedi na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 20 mai 2019. (Twitter/Présidence de la RDC)

Président Félix Tshisekedi abimisi mbulamatari ya sika na mokanda atiye manzaka elongo na Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba na ntongo ya mokolo ya yambo mposo.

"Nakanisi ete ntina ya kozela mwa ntango ezalaki. Mpo tozwi mbulamatari moye molakisi mpe mozali kolanda emoniseli ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi. Mpo Félix Antoine Tshisekedi nde azali nzela ya mbongwana. Ezali bongo mbongwana nde mobandi sika oyo. Tomitiya na mosala," elobi M. Ilunga yambo molobeli ya président Tshisekedi, Kasongo Mewma atanga nkombo ya bato 65 bakozala na gouvernement, na bilili bilakisami na television nationale ya Congo démocratique.

Misala mya botiyami ya mbulamatari myango miwemeli. O'mokolo mwa eyenga, molobeli ya Félix Tshisekedi ayebisi ete mokonzi mbota azwaki mokano ya kosilisa likambo yango yambo na kosala mobembo na Japon esika wapi akozala na bokutani mpo na ntobwa ya Afrika.

Mbulamatari eye Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba akokamba, ezali na bilongi ya sika mingi mpe na bilongi ya kala ndambo.

Bato 66 nde bazali na kati. 49 ministre mpe 17 vice-ministres d'Etat. 5 vice-Premiers ministres, 10 ministres d'Etat, 3 ministres délégués, 31 ministres mpe 17 vice-ministres.

CACH, lingomba ya Félix Tshiskedi ezali na mabonga 23 mpe FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, na 42.

XS
SM
MD
LG