Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Etats-Unis elaki kopesa maboko na mbulatari ya Ilunga

Ntoma to ambassadeur ya Etats-Unis, Mike Hammer (G), elongo na mokambi ya USAID Mark Green (C), n a bokutani na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, na Cité ya union Africaine, Kinshasa, 19 août 2019. (Facebook/Ambassade USA/Kinshasa)

Ntoma to ambassadeur ya Etats-Unis na Kinshasa asakoli ete mboka na ye ekopesa maboko na mbulamatari ya Premier ministre Sylvestre Ilunga mobimisami na ntongo ya mokolo ya yambo.

Ambassadeur apesi losako na mbulamatari ya sika na maloba akomi na compte Twitter na ye.

"Tomibongisi mpo na kosala na mbulamatari ya sika mpo komema o’boso boyokani to partenarit privilégié U.S.-#RDC na ntina kotiya kimya liboso mpe bofulukisami. #PP4PP," ekomi M. Hammer.

Etats-Unis esi elobaki yango nsima na elonga ya Félix Tshisekedi lokola mokonzi ya mboka na sanza ya yambo eleki.

XS
SM
MD
LG