Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bemba alobi ba Congolais bamituna mpo na bokengi na bango na esika ya kotala baninga


Jean-Pierre Bemba na bokutani na ntoma ya Amerika mpo na Grands Lacs, Peter Pham elongo na ntoma ya Amerika na RDC, Mike Hammer, na Kinshasa, 12 novembre 2019. (Twitter/Ambassade ya Etats-Unis na Kinshasa)
Jean-Pierre Bemba na bokutani na ntoma ya Amerika mpo na Grands Lacs, Peter Pham elongo na ntoma ya Amerika na RDC, Mike Hammer, na Kinshasa, 12 novembre 2019. (Twitter/Ambassade ya Etats-Unis na Kinshasa)

Na maloba ya kotombela mobu ya sika na ba Congolais, Jean-Pierre Bemba, mokambi ya MCL (Mouvement pour la libération du Congo) alobi esengeli na ba Congolais komituna bango moko mpo na bokengi na bango na esika ya kotala bayi nzinganzinga.

"Natikali kondima ete RDC ebengama mpo na koluka yambo boyokani bolamu na mboka nzinganzinga mpe kimya na Afrika ya kati kati, mingi mpenza na etuka ya Grands Lacs na (nzela ya) mampinga mpe police ya makasi mpe ya alima mpo na kobatela bana ya mboka mpe ekolo na biso," ekomi JP Bemba na mokanda abimisi na feti ya mobu ya sika.

Alobi mpe lisusu ete "esengeli kotala motuya ya kimya ata mikakatano mizali mpe kokanga motema".

Akomi makombo maye mposo moko nsima na mokambi ya ntango eye ya lingoma ya boyokani Lamuka, Adolphe Muzito asengaki ete RDC esala bitumba na Rwanda mpo na kimya na monyele ya mboka.

JP Bemba mokambi ya kala ya lingomba eye, apemelaki, elongo na Moïse Katumbi, Adolphe Muzito mpo na maloba maye.

Na maloba na ye mpo na mibu 2020, JP Bemba apameli bokambi ya mabe, kaniaka mpe bozangi makasi ya mbulamatari,.

"Esengeli tomituna banso elongo motuna ya nini tosi tosala mpo na mboka na biso na esika ya kozela basusu," ekomi JP Bemba.

"Ezali mokumba na biso banso ya kopesa ba Congolais ntina ya kolikya mpo etali mikolo mikoya ya RDC," ebakisi mokonzi ya MLC.

XS
SM
MD
LG