Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mokambi ya batomboki "Raïa Mutomboki" Koko-di-Koko asambisami na Bukavu


Dr. Denis Mukwege azingami na basi bazwama na makasi na lopitalo ya Panzi na Bukavu, (E. Muhero/VOA)
Dr. Denis Mukwege azingami na basi bazwama na makasi na lopitalo ya Panzi na Bukavu, (E. Muhero/VOA)

Bosambisi ya mokambi ya batomboki Raïa Mutomboki, Fréderic Masudi Alimasi, oyo ayebani na nkombo ya Koko-di-Koko, bobandi lelo na Bukavu, na Sud-Kivu, mpo na bozwi basi na makasi ba bituka ya Kivu.

Koko-di Koko atelemaki liboso ya tribunal militaire ya Bukavu na baninga baye minei.

Dr. Denis Mukwege, oyo azwa mbano ya Nobel mpo na kobongisa basi na lipaso na lopitalo ya Panzi, azalaki kati na bafundi.

Batomboki batano baye ya Raïa Mutomboki bafundami mpo bemba likolo ya bomoto, mingi mpenza mpo kokanga bato, kozwa basi na makasi, kobeta bato makasi mpenza, kolimwisa bato, koboma, kotiya bayike na bahombo, mpe kosala botomboki, eyebisi mokanda ya lifunda.

Masudi Alimasi na basimba minduki ya Raïa Mutomboki "bafundami mpo na bitumba ya butu ya le 8 kino le 9 février 2018 na mboka Kabikojole, na Sud-Kivu epayi wapi bazwaki basi na makasi koleka nkama yoko, moko na moko," elobi Fondation Panzi ya Dr. Mukwege.

XS
SM
MD
LG