Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

CPI endimi etumbu ya Bemba na basusu mpo na kozimbisa ba nzeneneke


Jean-Pierre Bemba na Cour pénale internationale (CPI), La Haye, 8 juin 2018. (Twitter/CPI)
Jean-Pierre Bemba na Cour pénale internationale (CPI), La Haye, 8 juin 2018. (Twitter/CPI)

CPI (Cour pénale internationale)  endimi etumbu ya mobu moko ya boloko mpo na Jean-Pierre Bemba na baninga ba ye banei nsima na koka likambo ya kozimbisa ba nzeneneke (subornation des témoins).

Chambre d’appel ya CPI endimi etumbu eye nsima na kobwakisa bosengi ya basembeli ya Jean-Pierre Bemba na baninga ba ye banei.

"Suku ya bozongeli kosambisama ekati ete Suku ya première instance ezangaki te kotosa mikano mitali bopesami ya etumbu ya sika, esalaki mbeba moko te ya misala ya bosembo mpe epesaki te etumbu eleki monene mingi," elobi Suku eye ezali na La Haye, na liyebisi.

Jean-Pierre Bemba elongo na Aimé Kilolo Musamba, Jean Jacques Mangenda Kabongo, Fidèle Babala Wandu mpe Narcisse Arido basengaki bazuzi, o’mokolo 19 octobre 2016, kotala lisusu likambo na bango nsima na kokweyisami o’likambo na bofundami mpo na kopengwisa ba nzeneneke.

Na mokano ya kala Suku eye ya CPI ekatalaki Bemba na baninga baye mobu moko ya boloko mpe misolo nkoto nkama misato ya ba euros.

M. Bemba atikamaki na juin 2018 mpo etali bofundami ya koboma, kozwa basi na makasi mpe kompunza oyo babundi baye bafundamaki na yango na Centrafrique na bitumba bisalamaki kati na octobre 2002 na mars 2013. Kasi yambo, akatelami mibu zomi na mwambe.

Asalaki kaka mibu zomi na boloko na La Haye (Pays-Bas) yambo na kotikama.

Na mars, basambeli baye basengaki CPI 68 millions ya ba euros mpo mibu alekisaki na boloko.

XS
SM
MD
LG