Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Grands Lacs ezali na nzela ya kimya wuta maponami na RDC, elobi motindami ya ONU


(D-G) Président Félix Tshisekedi ya RDC na bakokani baye Paul Kagame ya Rwanda, Joao Lourenço ya Angola, Yoweri Museveni ya Ouganda mpe Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville, na bokutani na Luanda, Angola, 21 août 2019.
(D-G) Président Félix Tshisekedi ya RDC na bakokani baye Paul Kagame ya Rwanda, Joao Lourenço ya Angola, Yoweri Museveni ya Ouganda mpe Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville, na bokutani na Luanda, Angola, 21 août 2019.

Motindami ya sika ya ONU mpo na etando ya Grands lacs ya Afrika alobi etuka eye emikotisi mpenza na nzela ya kimya. Bikolo lokola Rwanda, Burundi, Ouganda, RDC bizali na etando eye.

Huang Xia, motindami ya sika ya ONU mpo etando ya Grands lacs ya Afrika, azwaki malabo mbala ya yambo o’boso ya Conseil ya sécurité ya ONU. Atiyamaki na ebongo yango na sanza ya yambo ya mobu moye.

"Etando ya Grands lacs emikotisi mpenza na nzela ya kimya, lokola esalamaki te yambo," ebeti sete M. Huang.

"Mbongwana ya bokonzi na ekolo Congo démocratique na kimya nyonso mpe mokano ya bakambi ya etando eye mpo na kopesa eyano na makama makanso mapekisa ntombwa na yango" nde makambo mamemi kimya, eyebisi M. Huang.

Motindami ya ONU apesi losako na boyokani kati na Ouganda na Rwanda ndenge batiyaki manzaka na mokanda ya bondeko le 21 août 2019 na Luanda.

M. Huang apesi longonya na bakambi ya Angola mpe ya RDC baye basalaki nyonso mpo na masalo mpe boyoka yango esalama.

Mokonzi ya Angola Joao Lourenço alobaki ete mokokani wa ye RDC Félix Tshisekedi nde asalaki nionso mpo boyokani bwango bosalama. Mpe M. Tshisekedi ayebisaki ete komema komya na etando eye ezali moko na mikano ya makasi ya bokonzi bwa ye.

Mpo na M. Huang, "mokano ya boyokani yango bomonisami na masolo kati na misala ya bokengi mpe mampinga ya RDC na Ouganda mpe na Rwanda na ntina ya koyikisa bondeko na bitumba na mangomba ya basimba minduki na monyele ya Congo démocratique".

M. Huang asengi manaka mpo na ntombwa masalama mingi mpe bosangani bokokisama na lombango .

"RDC, Burundi, Ouganda mpe Rwanda bandimi kosolola mpo na makambo ya makoki ya mabele na ntina ya komema bofulukisami," ebakisi M. Huang.

Motindami ya ONU alaki ete misala mya ye mikopesa maboko na mabongisi ya Conférence ya botiyi mosolo (bokeli misala) mpe mombongo na etando ya Grands lacs na sanza ya misato ekoya na Kigali.

XS
SM
MD
LG