Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi alobi andimi kokufa mpo na kimya na mboka


Président Félix Tshisekedi na molongani wa ye Denis Nyakeur na lisikulu na etando ya lipanda, na Bukavu, Sud-Kivu, 7 octobre 2019. (Facebook/Présidence)
Président Félix Tshisekedi na molongani wa ye Denis Nyakeur na lisikulu na etando ya lipanda, na Bukavu, Sud-Kivu, 7 octobre 2019. (Facebook/Présidence)

Président Félix Tshisekedi alobi na lisikulu na ye ete akondima kokufa mpo na kimya na mboka na ye. Asalaki lisikulu yango na etando ya Lipanda liboso ya bato ebele nsima na bokomi na ye na Bukavu, na Sud-Kivu.  

"Nakondima kokufa, bondimela ngai, mpo ete kimya ekoma bosolo,"eyebisi M. Tshisekedi.

Abandeli koloba ete na campagne (mpo na maponami), bolamu ya bana ya Congo nde bozalaki moko na mama na makambo.

"Bolamu ya bana ya Congo bokobanda na (kosilisa) mikatatano mya ya kimya. Nayebi mpasi na biso," elobaki M. Tshiskedi.

Azali na Bukavu mpo na bofungolami ya laboratoire ya bilona.

Akoyamba lobi bakonzi ya mboka nzike lokola Paul Kagame ya Rwanda, Pierre Nkurunziza ya Burundi, Uhuru Kenyatta ya Kenya mpe bakambi ya kala lokola Olusengun Obasandjo ya Nigeria mpe Joseph Kabila ya RDC, oyo akitani na ye.

XS
SM
MD
LG