Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi abeti piololo ya bobandi mosala ya laboratoire ya milona na Kalambo

Président Félix Tshisekedi afungoli elamba ya palaki ya laboratoire ya milona ya Afrika "Olusegun Obasanjo", nkombo mokonzi ya kala Nigeria (1er G) na Kalambo, pene na Bukavu, Sud-Kivu, 8 octobre 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi abeti piololo ya bobandi misala ya laboratoire ya milona mpo na Afrika tropical na Kalambo, na 20 kms ya Bukavu.

Azali kuna na mokambi ya BAD, Banque africaine ya ntombwa, Akinwumi Adesina, elongo na baye ya mbulamatari ya Kinshasa mpe ya etuka ya Sud-Kivu.

Laboratoire yango epesami nkombo Olusengun Obassanjo, mokonzi ya kala ya ekolo Nigeria. Ezali na Institut international d’agriculture tropicale (IITA).

Olusengun Obasanjo azalaki na milulu myango kasi bakonzi basusu babengamaki lokola Paul Kagame ya Rwanda, Pierre Nkurunziza ya Burundi, Uhuru Kenyatta ya Kenya mpe Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC, bakomaki te.

Nzonkande yambo na kolongwa Bukavu, président Félix Tshisekedi akambaki likita monene ya bokengi na bakonzi banso ya etuka ya Sud-Kivu.

Ndako ya misala ya mokonzi Tshisekedi oyo epesi sango yango elobi makambo masusu te likolo na likita liye.

XS
SM
MD
LG