Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etat d’urgence sanitaire : Tshisekedi apesi ndingisa Assemblée nationale na Sénat esangana


Président Félix Tshisekedi na bokutani na bakambi ya biyamba na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na bokutani na bakambi ya biyamba na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/présidence RDC)

Nsima na nungu nungu ezalaki mposo moleki kati na CACH na FCC likolo na bobengisami ya Congrès, président Félix Tshisekedi asengi Assemblée nationale na Sénat kosangana mpo na kobakisa mikolo ya état d’urgence sanitaire.

Président Félix Tshisekedi atie manzaka na décret moko esakolamaki lundi na butu.

Décret yango ebandeli mikano manso mipesamaki na bosakoli état d'urgence kasi epesi nzela na Assemblée nationale mpe na Sénat kosangana na motango ya bato koleka 20 kolanda quorum esengami na réglement intérieur na suku moko moko ya parlement, elobi molobeli ya président Tshisekedi na botangi mokano yango.

"Ekozala Congrès te lokola elobamaki mikolo mileki na ba bakambi ya suku mibale (ya Parlement) kasi kaka botiyami na mosala ya ordonnance (présidentielle) ya le 24 mars eye ezalaki mpo na état d’urgence sanitaire na ntina ya kobundisa COVID-19," elimboli presse présidentielle na liyebisi.

Press présidentielle ebakisi ete ordonnance yango elandaki Buku likonzi.

Nungu nungu ebimaki mposo moko na ndambo eleki ntango mokambi ya Sénat, Alexis Thambwe Mwamba ayanolaki na Top Congo FM ete Congrès esengeli kosangana ata mokano ya président molandaki te mobeko likonzi, na ntina ya kozongisa yango na nzela mpe kopesa yango makasi ya kosala.

Cour constitutionnelle esanganaki mpe endimaki ete mokano ya kozwa état d’urgence mosakolamaki na kotosa Buku likonzi.

Maloba ya M. Thambwe Mwamba mapesaki nkanda na bayi CACH (lingomba ya président Félix Tshisekedi) mpe ya UDPS, lisanga na ye ya politiki.

Vice-Premier ministre mpe ministre ya intérieur, Gilbert Kankonde akebisaki ete police mpe misala mya bokengi elingaki kopanza ba keli mibeko soki basangani mpo balingaki kotosa te mokano ya président Tshisekedi moye mopekisi bato koleka 20 kosangana, na bobangi pobanzani ya COVD-19.

Assemblée nationale na Sénat soki basangani, bakozala koleka bato 610.

Etat d’urgence esengeli esala mikolo 30.

XS
SM
MD
LG