Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 14 bakufi na ba attaques mibale na Est


Basimba minduki na Tchei, Ituri, 28 juillet 2006
Basimba minduki na Tchei, Ituri, 28 juillet 2006

Bato 14 bakufi na ba attaques mibale na Est ya ekolo Congo démocratique, eyebisi bavandi.

Ba policiers mitano mpe civil moko bakufi butu boleki ntango basimba minduki bakotaki na commisariat na Irumu-centre, na province ya Ituri, elobi moko ya société civile.

Molebeli y aya mampinga na etuka eye andimi yango.

Na Nord-Kivu, bato mwambe babomamaki na mbeli, machettes mpe bibundeli misusu na Bukoma, na territoire ya Rutshuru.

Movandi moko, Eugène Rwanze, alobi ete basimba minduki babomaki mosali ya l’Etat moko na molongani wa ye elongo na bana ba bango mitano na na moto moko ya nzinga nzinga.

M. Rwanze alobi ezali motombi moko ya ba hutu rwandais ya ba FDLR baye bazali na etuka eye.

Nyono esalami ntango mampinga ya ba FARDC bazali kosala bitumba na basimba minduki mpe batomboki na monyele ya RDC.

XS
SM
MD
LG