Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bakambi ya Kongo-Central, Ituri, Sankuru mpe Haut-Lomami babengasami na Kinshasa


Policier moko liboso ya Cour suprême na Kinshasa, RDC, 18 novembre 2006.
Policier moko liboso ya Cour suprême na Kinshasa, RDC, 18 novembre 2006.

Ba gouverneurs, vice-gouverneurs, présidents mpe vice-présidents ya Kongo-Central, Sankuru, Ituri mpe Haut-Lomami babengisami na ministre ya Justice na Kinshasa o’mokolo ya le 13 janvier mpo na koluta eyano nsima na bokweyisami ya bakonzi ya bituka biye, elobi liyebisi ya ministère.

Na liyebisi libimi o’mokolo ya le 2 janvier etangami na site ya Radio Okapi, vice-Premier ministre mpe ministre ya Justice la Justice et Gardes Sceaux alobi ete mokano mwa ye molandi maye makatamaki na likita ya mbulamatari ya le 6 décembre eleki.

Le 10 décembre, Premier ministre akomaki mokanda mpo na kotiya commission ad hoc ekotala makambo ya bakambi ya bituka biye, baye bakweyisamaki na ba Assemblées provinciales na bango. Mpo yango ebimisaki matata na bituka biye. Bakambi ya bituka biye batila te kondima mikano ya ba assemblées na bango.

Lokola mokambi ya Ituri, Jean Bamanisa oyo amema likambo yango na Cour d’appel ya etuka na ye.

XS
SM
MD
LG