Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba ADF babomi lisusu bato 20 na Beni


Boko na bato bazwaki mpasi ntango ba ADF babomaki bato na Beni, Nord-Kivu, 3 décembre 2019.
Boko na bato bazwaki mpasi ntango ba ADF babomaki bato na Beni, Nord-Kivu, 3 décembre 2019.

Ba ADF babomi bato 20 butu boleki na Beni, eyebisi adminsitrateur ye territoire ya Beni, na Nord-Kivu.

"Ba ADF bakotaki na mboka Apetina-Sana butu boleki. Babomaki na mbeli, machettes mpe bibundeli misusu ba civili 20," elobi na AFP administrateur ya terrioire Donat Kibwana.

Ndako ebele ezikisami, kolanda maloba ma ye.

Bayi société civile, lokola Teddy Kataliko, balobi ete bakonzi bayokaki uto mokolo ya eyenga sango ete bato moko bayebani te bazalaki na ouest ya mboka Oicha, kasi basalaki eloko te.

Apetina-Sana ezali na 16 km na ouest ya Oicha, engumba mokonzi ya territoire ya Beni, esika ebangami triangle de la mort.

Uto suka ya sanza ya novembre mampinga ya ekolo Congo démocratique batiyaki likonzi ya bokambami (Etat-major) na bango na Beni mpe basakolaki ete babandaki bitumba makasi na ba ADF, kasi bobomami bozali se kokoba na bisika biye.

XS
SM
MD
LG