Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basoda babale ya RDC bakufi na bitumba na bayi Burundi na lac Tanganyika


Balobi mbisi na masuwa na lake Tanganyika na Uvira, Sud-Kivu, 22 mars 2915/
Balobi mbisi na masuwa na lake Tanganyika na Uvira, Sud-Kivu, 22 mars 2915/

Basoda babale ba RDC bakufi na bodongwani na baye ba Burundi na ndelo kati na bikolo mibale na lac Tanganyika, elobi mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC).

“Basoda ba mayi bazalaki kokengela to na patrouille ya reconnaissance ntango basoda ba Burundi bakanisaki ete bazali ba bandits to bato mabe,” elimboli molobeli ya mampinga na misala Sukola 2, na Uvira, capitaine Dieudonné Kasereka.

Molobeli ya ba FARDC asakoli mpe ete basoda babale ba RDC bakufaki mpe mosusu akangamaki o’butu bwa mokolo mwa yambo.

“Likambo lyango lisalami mpo na bozangi koyokana kasi mpe likolo na molili mozalaki na lac,” ebakisi capitaine Kasereka.

Na ngambo ya Burundi, ministère ya Bobateli elobi na liyebisi ete mampinga ma Burundi masalaki bitumba na ba bandits mpe mabotolaki bango minduki, kati na yango ba Ak40 mibale.

Ministère ya Burundi elobi ezali nanu kosala bolukiluki.

Bakonzi ba mboka Mboko na ngambo ya RDC, balobi ete basoda babale nde babetanaki masasi nsima na bayi RDC kobengana balobi mbisi ya Burundi mpe kobotolo bango litres mitano ya carburant.

Bikolo minei ekabolaka lac eye ezali na 680 km : RDC, Burundi, Zambie mpe Tanzanie.

XS
SM
MD
LG