Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Gén. Mbala abwaki mbela mpo mampinga ma Angola makoti na Moanda mpe Songololo


Mokonzi ya mampinga ya RDC (FARDC) Général Célestin Mbala Musese apesi baso losaka na Beni, Nord-Kivu, 11 décembre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)
Mokonzi ya mampinga ya RDC (FARDC) Général Célestin Mbala Musese apesi baso losaka na Beni, Nord-Kivu, 11 décembre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)

Mampinga ma Marine ya Angola (FAA) mamonisami na ngambo ya ndelo ya Ekolo Congo démocratique pene na ba territoires ya Moanda mpe Songololo epayi wapi bazali kokota mbala mingi na koloba ete bazali kolanda batomboki ba lingomba FLEC.

Mokambi ya mampinga ma RDC, general d’armée Célestin Mbala Munsense akomeli mpe abwaki mbela na président Félix Tshisekedi na asenga na mokonzi ya Angola Joao Lorenço kotosa ndelo kati na bikolo mibale.

Kolanda mokanda mwango, general d’armée Mbala akundoli ete RDC na Angola bazali kati na SADC, lisanga lya nkita lya bikolo bya Afrika ya nse, eye epekisi bango kokotela moninga na mabele maye.

Ezali mbala ya liboso te ete likambo likambo lyango lisalame kati na bikolo mibale.

Nzokande Ekolo démocratique ezali mpe na matata ya ndelo na Zambie mpo basoda ba Zambie bakotaki mbala mingi na mabele ma Congo.

Kasi lelo nde ba experts ya Zambie mpe ya RDC babandi misala ya kotala ndelo yango mpo na kozongisa yango malamu kati na ba lacs Moero na Tanganyika na etuka ya ya Tanganyika.

XS
SM
MD
LG