Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basimba minduki basalaki 53% ya mbeba mpe bayi mbulamatari 47% na mars (BCNUDH)


Efelo moko na Beni, Nord-Kivu, 1er avril 2019. REUTERS/Baz Ratner
Efelo moko na Beni, Nord-Kivu, 1er avril 2019. REUTERS/Baz Ratner

Basimba minduki basalaki 53% ya mbeba ya makoki ma bomoto mpe bayi mbulamatari 47% na mars elakisi rapport ya Bureau conjoint ya makoki ma bomoto ya ONU (BCNUDH). Mbeba 655 nde esalami na etando mobimba ya ekolo.

Kolanda rapport yango, monyokoli mosalami na FARDC, mampinga ma Ekolo Congo Démocratique, momati na koleka 157%, ya police ya RDC emati na 64% mpe yango salami mingi na Nord-Kivu mpe na Sud Kivu.

Nations unies elobi mpe bato tuku misato na sambo babomamki na bozangi bosambisami kati na bango basi basato mpe bana mitano.

93% ya mbeba yango (611) salami na na bituka bizali na bitumba, bato 243 bakufaki kati na bango basi 49 mpe bana 13.

Basimba minduki nde basali mbeba ya koleka, 57%.

Kati na mangomba ya basima minsuki mango ezali na Nyatura baye basali mbeba mingi koleka.

359 to 59% salami na Nord-Kivu, 77 na Ituri, 63 na Sud-Kivu mpe 46 na Tanganyika.

Mbeba 655 nde esalami na etando mobimba ya ekolo.

Mbeba ya basima minduki emati na koleka 8%, mingi mingi likolo na bitumba ya ba ADF, ba FADLR mpe ba Nyatura na Nord-Kivu.

XS
SM
MD
LG