Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Zoé Kabila akweyisami bo' mokambi ya etuka na Assemblée provinciale ya Tanganyika


Zoé Kabila, mokambi ya etuka ya Tanganyika mpe leki ya mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila, na Shark Club, Kinshasa, 31 octobre 2014.
Zoé Kabila, mokambi ya etuka ya Tanganyika mpe leki ya mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila, na Shark Club, Kinshasa, 31 octobre 2014.

Zoé Kabila mokambi ya etuka ya Tanganyika mpe leki ya mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila, akweyisami na Assemblée provinciale nsima na motion ya défiance.

Na mokamnda na bango ya bokweyisami, ba deputes provinciaux zomi na misato o kati ya tuku mibale na mitano bazali kofunda Gouverneur ya Province na mosala malamu te, mpe kozanga botosi na assemblée ya etuku eye.

Ba lobi pe Lisusu ete Zoe Kabila akokaka ata Moke te kotelema liboso na bango mpo na ko limbola malamu mosala na ye. Mpe makambu misusu ya ndenge na ndenge ya kobangisa mpe kopengwisa Mosolo ya l'Etat.

Kati ya ba gouverneurs tuku mibale na motoba ya RDC, Zoe kabila azali Kaka ye Moko nde aboyaki kokota na Union sacrée ya president Felix Tshisekedi, mpe andimaki kotikala na FCC ya Joseph Kabila.

XS
SM
MD
LG