Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basali ba l’Etat basalaki 43% ya mbeba mbe  mpe basimba minduki 57% na juillet (BCNUDH RDC)


Basoda ba MONUSCO libanda lya ndako ya Nzambe epayi wapi ba bombes artisanales ebetamaki na Beni, Ituri, 27 juin 2021.
Basoda ba MONUSCO libanda lya ndako ya Nzambe epayi wapi ba bombes artisanales ebetamaki na Beni, Ituri, 27 juin 2021.

Bureau conjoint ya Nations unies ya makoki ma bomoto (BCNUDH) elobi basali ba l’Etat basalaki 43% ya mbeba ya makoki mabomoto na juillet, mpe basimba minduki 57%.

Na rapport na yango ya ebimisi jeudi, BCNUDH elobi ete mbeba 492 ya makoki ma bomoto esalamaki na sanza sambo mpe ezali motango ya nse na kotala moye mwa sanza ya motoba 624.

"Ba FARDC 35, bayi police 6 mpe basimba minduki 20 bakatelamaki etumbu mpo na mbeba ya makoki ma bomoto. BCNUDH ezaki sango ete mbala 38, bato bakimi boloko, kati na bango basi 10," eyebisi BCNUDH.

Mbeba 432, 89,4%, eyebani na bisika bitumba bizali, epayi wapi bato 127 bakufi, kati na bango basi 29 me bilenge basi 8.

57% to mbeba 246 esalami na Nord-Kivu. Na Ituri, 4. Na Sud-Kivu 45 mpe na Tanganyika 37.

Mbeba ya kozwa basin a makasi ekiti na 25% n abasi 44.

Mbeba 24 ezali mpo na maye matali démocratie.

XS
SM
MD
LG