Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

EXETAT 2021: Bayekoli bapanzi mpe batie moto na sous-division ya EPST ya Manono (Tanganyika)


Bayekoli na Bukavu, le 27 novembre 2016, au Sud-Kivu, en RDC. (VOA/Ernest )
Bayekoli na Bukavu, le 27 novembre 2016, au Sud-Kivu, en RDC. (VOA/Ernest )

Bayekoli baike bapanzi mpe batie moto na bureau ya Sous-division ya Enseignement primaire secondaire mpe technique (EPST) ya Manono, na Tanganyika, nsima na bobandi ya momekano ya examen d'Etat.

Mobulu mobimaki na etuka Tanganyika nsima na bobandi ya momekano ya ba examns d’Etat ya bayekoli ya suka ya secondaire.

Bayekoli baike bapanzaki mpe batiaki moto na bureau ya Sous-division ya Enseignement primaire secondaire mpe technique (EPST) ya Manono.

Kolanda litatoli ya bayi société civile, bayekoli bango bapasoli mikanda ya mimekano ya mokolo mwa yambo mpo balobi nkombo na bango emonani te to mpe code bango ebongwani.

Administrateur ya territoire ya Manono Pierre Mukamba alobi ete bayekoli ba biteyelo misato ya cycle court ya ba instituts IPEA, ITEAP mpe Mwene batombakaki mpo bakanisaki ete ba options na bango ebongolamaki na mikanda.

M. Mutamba andimi mpe ete bayekoli bango bapanzi, bapuki mpe batie moto na ba bureaux mpe babebisi ata motuka na ye mpe moye ya police.

"Bayi police bakitaki esika yango mpe bazongisi kimya," ebakisi M. Mutamba.

Mokekano to Session ordinaire ya Examen d’Etat ya mobu 2021 mobandi lundi na etando mobimba ya Ekolo Congo démocratique (RDC) mpo na bana bakelasi ba suka ya Secondaire.

Koleka bana kelasi nkoto nkama mwambe (800.000) bazali na momekano mwango.

Ministre wa Yambo Jean Michel Sama Lukonde nde abeti piololo na bobandi momekano myango wuto Kinshasa.

Kasi na Beni, bayekoli bazalaki mingi mpenza te na bobangi mbeba ya bitumba.

XS
SM
MD
LG