Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bintou Keïta asololi na Kabila na Kashamata


Mokolonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila (G) na masolo na mokambi ya MONUSCO Bintou Keita na ferme ya Kashamata pene na Lubumbashi, Haut-Katanga, 14 avril 2021. (Twitter/Barbara Nzimbi)
Mokolonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila (G) na masolo na mokambi ya MONUSCO Bintou Keita na ferme ya Kashamata pene na Lubumbashi, Haut-Katanga, 14 avril 2021. (Twitter/Barbara Nzimbi)

Bintou Keita, moknzi ya MONUSCO mpe ya misala mya ONU na Ekolo Congo démocratique akutani na mokonzi ya kala Joseph Kabila na ferme ya Kashamata, na Lubumbashi na Haut-Katanga.

"Basololi koleka ngonga mpo etali bokengi, politiki mpe misala mya MONUSCO," elobi moko na basungi M. Kabila, Barbara Nzimbi na Twitter.

Lobi loleki, mama Bintou Keita akutanaki mpe lokola na Moïse Katumbi, mokambi ngambo moko ya Lamuka.

Na Kinshasa, Mme Bintou Keita akutanaki mpe na Adoplhe Musito mpe Martin Fayulu bayi ngambo mosusu ya Lamuka.

Asololaki mpe na président Félix Tshisekedi mpe bayi mbulamatari.

Ezali mobembo ya mbala ya yambo ya Bintou Keita azali kosala na mboka wuto azwaki ebonga na ye na kobanda mosala. Azalaki mposo mibale mileki na monyele ya mboka.

XS
SM
MD
LG