Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu na Muzito basengi MONUSCO kolakisa bato bazali kotia mobulu na est


Adoplhe Muzito, Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi na bokutani, na photo eiytami na Twitter ya Lamuka, 27 mars 2020. (TwitterCoalition Lamuka)
Adoplhe Muzito, Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi na bokutani, na photo eiytami na Twitter ya Lamuka, 27 mars 2020. (TwitterCoalition Lamuka)

Bakambi ba Lamuka na ngambo ya Martin Fayulu na Adolphe Muzito basengi na MONUSCO kolakisa bato baye bazali kopelisa moto na monyele ya RDC.

Bakomi mokanda mpo na kotelemela maye mazali koleka na est ea RDC.

Na kati ya mokanda bakomeli MONUSCO bapameli mpe ndenge bakonzi ya mboka bazali kopekisa bato ba telemela, ba tambola na kimya.

Martin Fayulu na Adoplhe Muzito baye batikali nan gambo eye ya lingomba Lamuka, balobi ete lokola Monusco esali mibu mingi na RDC na kotalaka maye mazali koleka kuna, eyebi malamu ba nani baye bazali kotia mobulu.

Mpo na yango, basengi ete ONU esangisa bayi Rwanda Ouganda mpe Burundi, basolola mpe bayokana mpo na kotika kopesa minduki na badongolo miso na est ya RDC.

MM. Fayulu na Muzito nalobi mpe lisusu ete Nations Unies esengeli efongola Tribunal penal international mpo na kotala makambo ya rapport Mapping na ntina ya kosambisa baye banso basalaki mabe.

Nzoka nde, Bintu Keita oyo azali motindami ya kalaka mokonzi ya Nations unies ayambamaki na Lubumbahsi, na Moise Katumbi oyo azali ngambo moko na Jean-Pierre Bemba na lingomba Lamuka.

XS
SM
MD
LG