Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

"Eglise du Réveil" esengi mpe maponami na 2023


Ndako ya mosola ya Commission électorale nationale indépendante (CENI) na Kinshasa, RDC, 5 novembre 2017.
Ndako ya mosola ya Commission électorale nationale indépendante (CENI) na Kinshasa, RDC, 5 novembre 2017.

ERC (Eglise du Réveil) to "Eyamba ya Bolamuki "epesi mpe makanisi ma yango mpo etali maponami masengeli masalama na 2023. Elobi maponami mango masengeli masalama na ntango, kolanda mokanda ebimisi lundi.

"Bosenga ya kosala mosala bo’bolongabani bozali kotinda botosi na Buku likonzi. Na kolanda yango nde tokanisi ete ezali malamu mpe elongobani ete maponami na masala na 2023," elobi na ba panzi sango mokambi ya ngambo moko ya ERC, motambwisi mpate Dodo Kamba

"Tokoki te kobongisa boleki na ntango. Mposa ya lolenge wana esengeli te ezala na esika lelo, mpo eloko moko te ekoki kosimba yango," ebakisi Dodo Kamba.

Motambwisi mpate Kamba asengi ete "manso masalama na ngonga mpo na maponami malamu, ya pole, bonsomi mpe kimya".

Alobi ete ERC ezali komibongisa mpo na kopona moto oyo asengeli kokamba CENI, misala mya maponami ya RDC.

Motambwisi mpate Kamba akitisi mitema ya bato na koloba ete boyokani bolamu bozali na eklesia katoliko mpe basusu.

Nungu nungu ebimaki nsima na boko ba bayi politiki mpe batambwisi mpate basusu koloba ete esengeli kopusa maponami.

Ba Katoliko, CENCO, Conférence épiscopale nationale du Congo, ebetaki sete mpo na maponami masalama na 2023 lokola Buku likonzi esengi.

Misioni, ECC (Eglise du Congo) mpe ba musulmane mpe basengaki se bongo.

ERC ekabwanaki ngambo ibale mobu moleki nsima na boswani bongalaki kati na biyamba mpo na kopona mokambi ya CENI.

Baike na bakambi ya biyamba, kati bango ngambo moko ya ERC ekambami na Sony Kafuta, bandimaki Ronsard Malonda kasi bakatoliko mpe misioni baboyaki ye.

Mobulu mobimaki na mboka nsima na Assemblée nationale kodnima Ronsard Malonda kasi président Félix Tshisekedi aboyaki kotia manzaka na bondimami yango.

Sika, biyamba bazali kosala mpo na koponama mokambi ya CENI. Nzokande bayike na politiki, lokola Martin Fayulu ya Lamuka, bazali kosenga yambo mbongwana ya mobeko mpe misala mya maponami.

XS
SM
MD
LG