Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba commandants babale ya FARDC na Beni mpe Ituri babengisami na Kinshasa


Basoda ya FARDC bazali kolanda mateya ya bayi contingent ya Brésil na Monusco, na Beni, Nord-Kivu, 3 février 2020. (Twitter/MONUSCO/Michael Ali)
Basoda ya FARDC bazali kolanda mateya ya bayi contingent ya Brésil na Monusco, na Beni, Nord-Kivu, 3 février 2020. (Twitter/MONUSCO/Michael Ali)

Général Jerome Chico Tshibambwe, commandant ya 32e brigade ya réaction rapide na Beni, na Nord-Kivu, abengisami na Kinshasa, eyebisi mampinga ya FARDC  na compte Twitter.

Na esika na ye, général André Ehoza Uketi nde atiyami mpo na mwa ntango.

Ndenge moko mpe Commandant second ya secteur ya misala ya ba FARDC na Ituri, général Chiviri Hamuli abengisami mpe na Kinshasa mpo mituna na bakonzi.

Na esika na ye général Robert Yav Avul Ngola, commandant ya 32e brigade ya défense oyo azali na Mambasa (Ituri) nde akosala mosala mpo na mwa ntango.

Bakambi ya mampinga ya ekolo Congo démocratique bayibisi te ntina nini ba commandants babale baye babengisami na Kinshasa mpe ntango nini bakowumela kuna.

Général Jerome Chico Tshibambwe azali oyo bakambi ya mampinga bamonisaki na bililingi mpe balobaki ete alongaki batomboki ya ADF mpe abotolaki bango likonzi na bango ya Madina, na Beni.

Nzokande bato ebele bazali kosenge ete bakonzi ya mboka balongola ba commandants bawumela na Beni mpe Ituri mpo kolouka kosilisa noki bitumba.

Bayi société civile basengaki yango na bokutani na Premier ministre belge Sophie Wilmes oyo azali na mobembo na RDC wuto mikolo mibale. Mpo na bango, bakambi banso basala mbeba to bazali na nse ya etumbu ya Union européenne, esengeli balongwa.

Cardinal Fridolin Ambongo mpe asengaki yango sanza eleki nsima na mobembo na Beni.

XS
SM
MD
LG