Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba "pétitions" ya kokweyisa Bureau d'âge ya Assemblée nationale etikami


Mboso Nkodia (C) Aminata Namasia (G) na Gael Bussa (D), bakambi ba Bureau d'âge ya Assemblée nationale, na Kinshasa, 6 décembre 2020.
Mboso Nkodia (C) Aminata Namasia (G) na Gael Bussa (D), bakambi ba Bureau d'âge ya Assemblée nationale, na Kinshasa, 6 décembre 2020.

Pétition to mikanda mya kosenga bolongwi ya moko moko ya bayi Bureau d’âge ya Assemblée nationale mitaki mardi na parlement.

Huissier ya sembo amemli yango mokambi ya ndako ya bakeli mibeko, Christophe Mboso .

Bakeli mibeko nkama moko na tuku minei ya FCC nde batiaki manzaka na mikanda myango.

Tokundola ete Bureau ya Assemblée nationale ekweyisamaki sanza eleki nse na mikanda mya ndenge wana.

Bokweyisami ya bakambi ba Assembléen nationale na Jeanine Mabunda oyo azalaki présidente na yango, bozalaki mpo bayi CACH, lingoba lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, moko na bilembo ete majorité ebongwami.

M. Tshisekedi akataki libala kati na CACH na FCC, ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

M. Tshisekedi azali kosala liboke lya sika na bato bakotambola na ye na bokonzi bwa ye.

XS
SM
MD
LG