Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FCC epameli botiami ya informateur na Tshisekedi


Sénateur Bahati Lukwebo, "infomateur", na bokutani ya bakeli mibeko 302 na président Félix Tshisekedi na Cité africaine, Kinshasa, 02 janvier 2021. (Facebook/Présidence RDC)
Sénateur Bahati Lukwebo, "infomateur", na bokutani ya bakeli mibeko 302 na président Félix Tshisekedi na Cité africaine, Kinshasa, 02 janvier 2021. (Facebook/Présidence RDC)

FCC etelemeli botiami ya" informateur" na président Félix Tshisekedi ntango mbulamatari ya Sylvestre Ilunga nanu na esika.

Bakambi ba masanga mazali kati na lingomba linene line lya mokonzi ya mboka ya kala Joseph Kabila (FCC, Front commun pour le Congo) bakomi na liyebisi nsima na bokutani bwa bango o'mokolo mwa eyenga 3 janvier 2020 ete président Tshisekedi azwi mokano ya kotia "informateur" na bozangi kotuna moto mosusu,

"FCC epameli mpe etelemi lolenge ya kosala ete mokonzi ya mboka akoma liziba lya bokonzi ya ba institutions nyonso ya mboka lokola Parlement, Mbulamatari mpe Misala mya bosembo," ekomi bakambi ba FCC.

Mpo na bango, yango etambolie te nzela moko na buku likonzi na ba artilces miike mpe etamboli likola mibeko mitali bokabwani bwa bokonzi.

Nozkande, o'mokolo mwa mposo président Tshisekedi ayambaki bakeli mibeko 302 baye bandimi kokota na "Union sacrée", lingomba monene azali kokela nsima na koboya libala lya bokambi mboka lizalaki kati na CACH (lingomba lya président Tshisekedi) na FCC.

302 bazali motango ya koleka mpo Assemblée nationale ezalaka na bakeli mibeko 500.

Ministre wa yambo, Ilunga Ilunkamba oyo azali ngambo ya FCC, ye mpe ayambai o'mwa mposo bakeli mibeko batikali na lingomba lya M. Kabila.

Le 1er janvier na bangomba ya yambo, mokonzi ya mboka asakolaki na liyebisi ete apesi mosala ya "informateur", moto akoluka ngambo nini ezali na bakeli mibko koleka na Parlement, na Sénateur Bahati Lukwebo, mokambi ya moko na biteni bya AFDC-A.

Bayi FCC bapaleli mpe président Tshisekedi na kozwa mokano kaka na liyebisi na esika ya mokano ya mokonzi ya mboka, bo' momesano.

XS
SM
MD
LG