Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi azelami na masolo na Sassou na Oyo


Président Denis Sassou N'Guesso ayambami na mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi na jardin ya palais de la Nation na Kinshasa, le 14 septembre 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Denis Sassou N'Guesso ayambami na mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi na jardin ya palais de la Nation na Kinshasa, le 14 septembre 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akozala na masolo samedi na mokokani wa ye Denis Sassou N’Guesso na Oyo, na Congo-Brazzaville.

Président Sassou alongwe Brazzaville mpo na kokende Oyo, mboka ya mbotama na ye, na département ya Cuvette, na Nord, elobi na compte Twitter na ye mokambi ya ndako ya mosala ya mokonzi ya mboka ya Congo-Brazzaville.

Ntina na masolo ma ma bango malobami te.

M. Sassou azali mokambi ya CIGL (Conférence internationale ya Grands lacs) mpe mobondi ya matata na RDC.

M. Sassou apesaka mpe toli na mokonzi ya RDC.

Président Félix Tshisekedi awuatki kosilisa boyoki bato mpe azali kotia na esika Union sacrée, liboke lya bato bakotambola na ye na bokambi mboka.

Mbongwana ezali kosalama nsima na bokweyisami ya Bureau ya Assemblée nationale.

M. Tshisekedi atie informateur mpo na koluka ngambo nini ezali na majorité na Assemblée nationale nsima na kokata libala kati na CACH, lingomba lya ye, mpe FCC ya mokonzi ya mboka ya kala Joseph Kabila.

XS
SM
MD
LG