Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ekolo Amerika elobi ezali kolikya ete Angola ekosunga kokitisa bobendani kati na Rwanda na Rdc.


Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi (D) na mokokani wa ye mokonzi ya Angola Joao Lourenço bakutani na Luanda, Angola, 27 sanza ya mibale 2024. (Facebook/Présidence RDC)
Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi (D) na mokokani wa ye mokonzi ya Angola Joao Lourenço bakutani na Luanda, Angola, 27 sanza ya mibale 2024. (Facebook/Présidence RDC)

Washington elobi ezali kolikya ete Angola ekosunga kokitisa bobendani kati na Rwanda na Ekolo Congo Congo démocratique. Mokambi ba misala mya Babaya ya Ekolo Amerika mpo na Afrika, mama Molly Phee, asakoli yango na biyano apesaki lelo liboso lya bayi Suku mibale ya Ndako ya bokeli mibeko ya ekolo Amerika awa na Washington D.C. Molly Phee akundoli bakeli mibako ete mokonzi ya Angola Joao Lourenço azali kosala makasi mpo na komema Felix Tshisekedi mokonzi ya RDC na mokokani waye ya Rwanda Paul Kagame koyokana elongo mpo etali linaka liye Ekolo Amerika na bakambi ba etuka ena ya Afrika bakelaki. Mama Phee abakisi ete Washington emipesi na komeka kokitisa mpasi na monyela ya RDC epayi ba bombes ebomaki bato ntuku misato na mitano na bisika bakima bitumba bazalaka na Mushagala. Na sanza ya misato elaki, Tshisekedi na Kagame basakolaki ete bandimaki kokuta mpo na masolo.

Forum

XS
SM
MD
LG