Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington ebeti sete mpo na maponami maye ngambo inso ekozala mpe ma sembo (sec. d’etat adj. Nuland)


Secrétaire d’Etat ajointe ya mwa ntango ya Ekolo Amerika mpe secrétaire d’Etat ya mambi ma Politiki Victoria Nuland (G) akutanani na president Félix Tshisekedi ya RDC na Cité ya Union africaine, Kinshasa, RDC, 3 sanza ya mwambe 2023. (Présidence RDC)
Secrétaire d’Etat ajointe ya mwa ntango ya Ekolo Amerika mpe secrétaire d’Etat ya mambi ma Politiki Victoria Nuland (G) akutanani na president Félix Tshisekedi ya RDC na Cité ya Union africaine, Kinshasa, RDC, 3 sanza ya mwambe 2023. (Présidence RDC)

Secrétaire d’Etat ajointe ya mwa ntango ya Ekolo Amerika mpe secrétaire d’Etat ya mambi ma Politiki Victoria Nuland ayebisi président Félix Tshisekedi na bokutani na bango na Kinshasa ete Washington ezali kozela maponami maye ngambo inso ekozala na kati mpe ma sembo.

Victoria Nuland azali na mobembo na Ekolo Congo démocratique wuta mokolo mwa misato 2 août 2023 na mpokwa.

"Tolingi ete mingongo minso mya RDC mikende na maponami mpo na kopona. Tozali na kondima mpe tokanisi ete maponami ma RDC makoki kozala maye ma bonsomi mpe ma sembo soki bato banso bazali na kati ya maponami maye," elobi Victoria Nuland na bapanzi nsango nsima na koyambama na mokonzi ya RDC Felix Tshisekedi o’mokolo mwa minei na Cité ya Union afriance na Kinshasa.

"Tosololi mpo etali lotomo, ezala mpo na biso na ekolo Amerika kasi mpe mpo na RDC, ya kokoka kotombola maponami ma pole, mpe ma sembo," elimbolaki Victoria Nuland.

Lisungi lya $ millions 48

Sous-secretaire d’Etat ya mwa ngonga ya Ekolo Amerika asakolaki mpe ete Washington ebakisi dollars millions ntuku minei na mwambe ya lisungi epesaka mpo na bosenga ya lombango ya baye basimbama na nkwokoso eye ezali kongala sika na mboka eye ya kati kati ya Afrika.

Lisungi lyango likosalisa bato bene na millions mibale na monyele ya mboka eye.

Libakisami na lisungi lya dollars millions nkama minei na ntuku motoba liye Ekolo Amerika ezali kopesa mobu moye na ntina na koyanola na bosenga bwa bato na RDC.

Lisungi lyango lipesami na nzela ya USAID, misala mya ekolo Amerika mpo na ntombwa na molongo.

Victoria Nuland asukosukisa na RDC mobembo asalaki na Afrika, na Afrika ya Ngele na Côte d’Ivoire.

Forum

XS
SM
MD
LG