Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Colonel Byamungu ya M23, Salomon Tokolonga ya FARDC, bakonzi babale ya FLDR, na ba Rwandais babale bapesami etumbu ya Washington


Mokambi molandi ya mampinga ma EAC (EACRF) Général de brigade Emmanuel (D) na molobeli ya batomboki ba M23 (G) major Willy Ngoma bapesani mbote na Kibumba, pene na Goma, Nord-Kivu, 23 sanza ya zomi na mibale 2022.
Mokambi molandi ya mampinga ma EAC (EACRF) Général de brigade Emmanuel (D) na molobeli ya batomboki ba M23 (G) major Willy Ngoma bapesani mbote na Kibumba, pene na Goma, Nord-Kivu, 23 sanza ya zomi na mibale 2022.

Ekolo Amerika epesi etumbu na bato motoba na bitumba biye bizali kokoba kongala na moyele ya Ekolo Congo democratique likolo.

Colonel Bernard Byamangu mokambi molandi ya batomboki ba M23 na maye matali bitumba mpe bokengi azali kati na bato baye motoba. Colonel Salomon Tokolonga ya FARDC, mampinga ma Ekolo Congo democratique mpe apesami etumbu.

Departement d’Etat elobi ete moko moko kati na batu baye bazali kotia moto na bobesima bwa kimya na est ya RDC mpe, mbala mingi, babongisaka memba ya makoki ma bomoto, lokola bozwami to monyokoli ya bozwami na makasi mpe mobulu likolo lya bana bake.

Etats-Unis elobi ezalaka nde na mopanzi ya civili mpe baye babikaka nsima na mbeba ya bato baye.

Na nkombo na ye abengamaka na yango “Mhehse, colonel Bernard Byamungu, mokambi molandi y aba M23 oyo azali na mibu ntuku mitano sika, azalaka wuta mobu moleki na etumbu ya Union européenne elongo na mobolei ya M23, major Willy Ngoma.

Colonel Byamungu azalaki mpe moko na batomboki ba kala ba RCD mpe CNDP.

Akangamaka na sanza ya minei ya 2012 na basoda ba FRADC, mampinga ma RDC, baye bakambamaki na nkondo colonel Mamadou Ndala na Itombwe na Sud-Kivu.

Alimwaka kasi abimisaki lisusu na sanza ya zomi ya 2022 bo’ moko na bakambi ba M23 nsima na kokima molongo mwa ba FARDC na etinda ya general Bosco Ntaganda.

Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi alimbisiaki ye (colonel Byamungu) na 2019 kolanda mokano mwa mawa mwa kolimbisi (amnistie) ya 2014.

Tresorerie ya Ekolo America epesi mpe etumbu na batomboki ba Rwanda ba FDLR baye Washington elobi bazali mpe na mokumba na bomati bwa mobulu na etuka ya eye.

Bayi FDLR bapesami etumbu bazali bongo Apolinaire Hakizimana na Sebastien Uwinbabazi. Moyi Rwanda Ruvugayimikore ya lingomba lyoko lipesaka maboko na FDLR, lokola mpe Andrew Nyamvumba ya RDF mampinga ma Rwanda bango mpe bapesami etumbu.

Biloko bya bango banso mpe mbano na yango banso bikangami bongo na Ekolo Amerika.

Forum

XS
SM
MD
LG