Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington esengi Kigali kosukisa kobebisa kimya na est ya RDC


Wendy Sherman (D), Secretaire d’Etat molandi ya Etats-Unis akutani na ministre ya mambi ma Bapaya ya Rwanda, Vincent Biruta (G) na Département d'Etat, Washington DC, 2 sanza ya mibale 2023.
Wendy Sherman (D), Secretaire d’Etat molandi ya Etats-Unis akutani na ministre ya mambi ma Bapaya ya Rwanda, Vincent Biruta (G) na Département d'Etat, Washington DC, 2 sanza ya mibale 2023.

Secretaire d’Etat molandi ya Etats-Unis ya Amerika, Wendy Sherman ayebisi ministre ya mambi ma Babaya mpe Boyokani na bikolo bya bapaya ya Rwanda, Vincent Bituri, ete Kigali esengeli kotika kobebisa kimya na monyele ya Ekolo Congo démocratique,

Mme Wendy Sherman ayambaki Vincent Biruti o'mokolo mwa minei, mokolo mwa mibale ya sanza ya mibale ya 2023, na Washingon DC, engumba mokonzi ya Etats-Unis ya Amerika.

"Basololaki mpo etali maye matali bokengi na etuka (ya Grands lacs); kati na yango, ndenge nini kosuikisa bobebisami bwa kimya na monyele ya Ekolo Congo démocratique (RDC) mpe ndenge nini kotombola kimya na Ekolo Centrafrique,” elobi liyebisi lya Département d’Etat (ministère ya mambi ma Bapaya ya Etats-Unis).

Département d'Etat elobi mpe ete, Wendy Sherman abeti sete na lisungi Etats-Unis ezali kopesa na mosala mwa bobondisi mpe masolo makambamaki na Angola mpe na EAC, Lisanga lya bikolo bya Afrika ya est.

Wendy Sherman alakisi mpe litomba liye lizali ete ngambo inso esala mpo na kosuki matata ma mampinga mpe komema na lombango masolo ma politiki.

Eatst-Unis, na mokono mwa secrétaire d’Etat Antony Blinken, epamelaki mbala mingi Kigali kopesa lisungi na batombaki ba M23 baye bazongela bitumba mpe babotala bisika mingi na monyele ya RDC.

Ekolo Amerika epamela mpe Kinshasa koyokana na ba FLDR, batombaki ba Rwanda bakima genocide eye bafundama na yango na 1994, mpe na mangomba masusu ma basimba minduki.

Washington esengaki mpe na Kinshasa kosukisa boyini mpe bonyokoli ya baye baloka lokota la kinyarwanda.

RDC na Rwanda efundama mpe makambo maye.

Mikolo mileki Kigali ebataki masasi na mpepo yoko ya bitumba ya mampinga ma RDC, FARDC.

XS
SM
MD
LG