Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington epameli makasi mpenza bitumba na est ya RDC kasi Kigali esiliki


Secrétaire d'Etat ya Etats-Unis, Antony Blinken (G) akutani na mokonzi ya Rwanda Paul Kagame na Kigali, 11 ya sanza ya mwambe 2022.
Secrétaire d'Etat ya Etats-Unis, Antony Blinken (G) akutani na mokonzi ya Rwanda Paul Kagame na Kigali, 11 ya sanza ya mwambe 2022.

Mbulamatari ya ekolo Amerika epameli Rwanda kosunga M23 mpe esengi na batimboki baye kotika bitumba na kozela te. Kasi mbulamatari ya Rwanda esiliki.

“Etats-Unis epameli makasi bomati bwa bitumba na est ya République démocratique du Congo (RDC) biye bisalami na lingomba lya basimba manduki M23 baye basungami na Rwanda mpe baye bapesama etumbu na Etats-Unis mpe ONU,” esakoli na liyebisi molobeli ya département d’Etat Matthew Miller.

Ministre ya mambi ma Bapaya ya Rwanda, Vincent Biruta, alaki ete mbulamatari na ye ekosenga ete Washington elimbola maloba ma ye.

Molobeli ya department d’Etat apameli mpe bokoti bwa M23 na engumba ya Sake.

“Bomati bwa bitumba biye bozali kotia na likama ba millions ya bato (…) Tozali kosenga na M23 kotika bitumba kaka sik'oyo mpe kolongwa na bisika bazali sika nzinga nzinga na Sake mpe Goma”, ebakisi M. Miller.

Washington epameli mpe Kigali na lisungi lya yango na M23 mpe esengi yango “kolongola systèmes ya ba missiles sol-air eye ezali kotiya na likama na bomoi ya ba civili, ba soda ya ONU, na ya mampinga masusu ya bozongisi kimya mpe ya lisungi ya etuka”, kolanda liyebisi.

Forum

XS
SM
MD
LG