Burundi
Sango ya Mokili Lelo: Mampinga ma Uganda makosilisa etinda na yango le 31 mai nde RDC
Sango ya Mokili Lelo: VSV na ba avocats ya Chebeya bazali kozela bosambisami ya gén. Numbi
VOA60 Lingala 12 mai 2022
➡️Ndayishimiye mokonzi ya Burundi andmi koslola na batomboki ba mboka na ye bazalaka na est ya RDC ➡️Milambwe atikami, Ngoyi Kenga apesami boloko ya libale mpe Mugabo mibu 12 ya boloko mpo na liwa Chebeya na Bazana ➡️Bikolo ya ba arabes bisengi bolukiluki mpo na liwa ya mopanzi sango ya Alzajeera
Sango ya Mokili Lelo: Ndayishimiye andimi kosolola na batomboki ya Burundi bazalaka na est ya RDC
Ndayishimiye mokonzi ya Burundi andimi kosolola na basambi minduki bazalaka na RDC

Mokonzi ya Burundi Evariste Ndayishimiye alobi andimi kosolola na mangomba ya basimba minduki ya mboka na ye baye bazalaka na onyele ya Ekolo Congo démocratique.
Alobi yango na bokutani na bapanzi sango.
"Soki RED-Tabara mpe FNL basengi masolo, tobongisami mpo koyamba bango mpe kosolola na bango," elobi mokonzi ya Burundi.
Bakonzi ya Burundi batalaka RED-Tabara lokola lingomba lya badongolo meso, lokola mpe ba FNL (Forces nationales de libération).
RED-Tabara endima été yang onde esalaki bitumba na libanda lya mpepo ya Bujumbura, engumba mokonzi ya nkita ya Burundi, sanza mingi eleki.
RED-Tabara esalaka bitumba wuto 2015 mpe ezali na babundi kati na 500 na 800 mpe ekoba kozwa babundi basika, elobaki na sanza ya zomi na moko eleki opposant Alexis Sinduhije oyo mingi bakanisaka été yen de akelalingomba lya kasi awangaka.
FNL, na ngambo yango, ekabmbamaka na Aloyi Nzabampema ezali eteni ya lingomba lya kala ya batomboki ya AgathonRwasa oyo akoma lelo opposant aya plitiki ya makasi na Burundi.
Voir les commentaires
Avez vous déjà un compte? Connectez-vous
Êtes-vous un utilisateur enregistré? Inscrivez-vous
Voir plus de commentaires