Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington esengi lisusu Rwanda kolongola mampinga ma yango na RDC mpo na kimya


Antony Blinken (G), secrétaire d'Etat ya Amerika apesi mbote na président Paul Kagame (D) ya Rwanda, na village Urugwiro, na Kigali, le 11 août 2022
Antony Blinken (G), secrétaire d'Etat ya Amerika apesi mbote na président Paul Kagame (D) ya Rwanda, na village Urugwiro, na Kigali, le 11 août 2022

Etats-Unis ya Amerika epaleli bobebisami ya bokengi mpe mbeba ya makoki ma bamoto ezali kosalama na mangomba ma basimba manduki na monyele ya Ekolo Congo démocratique (RDC), mingi mingi Ba M23, ADF to lingomba Etat islamique ya RDC, mpe ba FDLR.

Etats-Unis esengi bongo na mangomba manso ma basimba manduki kotika bitumba mpe kolongwa na kosenge eloko moko te na monyele ya mboka eye.

Département d’Etat ya Amerika esakoli na liyebisi ete Washigton epesi bongo losako na liyebisi Conseil ya bokengi mpe kimya ya Union africaine ebimisaki mokolo mwa zomi na sambo ya sanza eye na likita lya bakambi ba Afrika na Addis Abeba, na Ethiopie.

Washington ebeti sete na litomba ya kotia na misala mikano mizwamaki na AEC, Likita lya bikolo bya Afrika ya est mokolo mwa zomi na sambo ya sanza eye, lokola mpe malako ma Luanda mpe Nairobi mpe liyebisi lya Luanda ya mokolo mwa ntuku mibale na misato ya sanza ya zomi na moko.

Washington esengi mpe na Conseil ya bokengi mpe kimya ya Union africaine kopesa makasi mingi na Misala milandelaka kimya na matata ma RDC mpe na Monsuco, misala mya boyikisi kimya na RDC mpe lisusu, kopesa eyano na nkwokoso ya babundi mpe ya bozongi ya bakima bitumba mpe bakima mboka baye balingi na bisika na bango.

Etats-Unis elobi emoni mokano mwa Conseil ya bokengi mpe kimya ya Union africaine ya kosela misolo mya Union africaine na ntina ya kopesa maboko na botiami ya mampinga ma EAC na RDC.

Washington ezongeli mpe kosenga na Kigali kotika kosunga M23 mpe kolongola mampinga ma yango na RDC na ntina ya kopesa nzela na botiami na mosala ya maye mabongisamaki na likita lya EAC sanza eleki. Etats-Unis ebwaki mpe lisusu mbela na ngambo inso mpo na kosukisa maloba ma boyinanni mpe kosala mpo na kopekisa bitumba ya ba kabila to violence ethnique.

XS
SM
MD
LG