Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kamerhe akatelami mibu 20 ya misala mya makasi


Vital Kamerhe (G) na Felix Tshisekedi (D) na boyokani na bango mpo na maponami ya mokonzi mboka na RDC, na Nairobi, Kenya. le 28 novembre 2018.
Vital Kamerhe (G) na Felix Tshisekedi (D) na boyokani na bango mpo na maponami ya mokonzi mboka na RDC, na Nairobi, Kenya. le 28 novembre 2018.

Vital Kamerhe, mosungi mpe mokambi ya kala ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi, aketelami etumbu ya mibu 20 ya misala makasi, na bosambisambi bwa ye elongo na Sammih Jamal mpe Jeannot Muhimma mpo bopengwisami ya misolo ya kotonga ndako.

Etumbu yango elandami na bopekisami bwa bwa misala ya politiki mpo na mibu 10.

M. Kamerhe na basemeli ba ye balobi ete bokende na likambo yango na zuzi basusu.

"Balakisi ata te bilembo bimonisi mbeba bazali koloba, bazwi ekateli na bango na kolanda kaka maloba ya banzeneneke baye balobi ata eloko moko te, na nytango molai babebisi, kasi babotoli biloko mpe bozwi ya bato basusu," elobi moko na basembeli ya M. Kamerhe, Me Jean-Marie Kabengela.

Sammih Jamal, nkolo copagnie ya botongi SAMIBO, nde azwi etumbu ya mibu 20 mya misala makasi mpe bobenganami na mboka na nsima na kokisa etumbu yango.

Jeannot Muhima azali mosali ya présidence mpo na mambi ya import-esport.

Tribunal mpe ekati kokanga biloko na bango (misolo mpe ndako) ya bango mpe ya baye bazali nzinganzinga na bango batangamaki na bosambisami.

M. Kamerhe azali na mibu 61, soki atikali na boloko akobima na yango.

Sika, akoka te kozala lisusu candidat na mopanami ya mokonzi ya mboka ya .

Na boyokani na ye na président, na Nairobi, esengelaki M. Kamerhe azala candidat ya CACH (Cap pour le changement) lisanga bakelaki na novembre na Nairobi (Kenya) nsima na kolongwa na Lamuka.

XS
SM
MD
LG