Ne Mwanda Nsemi, mokambi ya lingomba Bundu dia Yamalaya, esenegli yambo azonga na boloko, elobi Vice-Premier ministre intérimaire ya mambi ya kati ya ekolo. VOA Lingala epesaki malabo na vice-ministre mpe vice-Premier ministre Basile Olongo.
Bato zomi bakufi na bobomami kati ya Bakwamanda na Bangundu mpo na kowelela bokonzi ya bokoko, na territoire ya Gungu na, eyebisi bakambi ya etuka ya Kwilu.
Martin Fayulu asengi na police kotika balandi baye mpe baye ya lingomba ya ye Ecidé (Engagement citoyen pour le développement) baye bakangamaki na ntongo ya lundi ntango bazalaki kotelemela bobengisami na ye na police judiciaire.
Martin Fayulu akokende lisusu lundi te na police judiciaire mpo eyoka ye na bofundami oyo ezali likolo na ye, eyebisi bakonzi ya Police nationale congolaise (PNC).
Batomboki ya ba musulmans ya Ouganda, ba ADF (Forces démocratiques alliées) basali bitumba mpo na mbala ya liboso na etuka ya Ituri epayi wapi bato motoba –soda moko na ba miliciens (banyangalakata) mitano- bakufi.
Ba avocats ya général Jean-Michel Mokoko balobi ete bapekisami kokutana na client na bango oyo misala ya bosembo bikatelaki mibu tuku mibale ya boloko.
Mokonzi ya kala ya RDC, Joseph Kabila asangisi lelo na Kingakati, na Kinshasa, bakambi ya bituka mpe asololi na bango na cadre ya journée internationale ya mosala. VOA Lingala etunaki mokambi ya etuka ya Kasaï central Martin Kabuya.
Bakonzi ya misala ya bosembo ya mampinga ya RDC bayebisi ete bakolandela lisusu Moïse Katumbi te mpo na likambo etali ba mercenaires afundamki na yango. Kasi likambo yango ezali naino na Cour constitutionnelle, tolanda maloba ya avocat ya M. Katumbi, Jean-Joseph Mukendi.
Bakonzi ya Congo-Brazzaville bapesi nzela na lingomba ya politique ya motomboki ya kala Frédéric Bintsamou to Pasteur Ntumi mpo na kosala mosala na etando mobimba ya ekolo liye. Mokano moye molongoli meko moye mopekisaki lingomba ya pasteur Ntumi.
Laurent Batumona, moko na ba alliés ya UDPS alobi na motuna ya VOA Lingala, ete esengeli président Félix Tshisekedi apesa Primature na bango. Mpo na ye, M. Tshisekedi nde azali na liloba ya suka mpo azali likolo ya boyokani CACH-FCC.
Procureur general ya Cour ya cassation asengi bolukiluki nsima ya bofundami ya Fayulu mpo na kotinda bato koyina baluba mpe genocide. CNDH ebendi matoyi ya bakonzi mpo na lolenge bato ya boloko bazali kobika. Ba alliés ya UDPS basengi Tshisekedi apesa bango Primature.
Bakonzi ya Rwanda balobi ete bakangi molobeli ya lingomba ya batomboki FNL (Front de libération nationale) liye lifundami mpo na bobomi ya bato na zamba moko pene na RDC na Burundi.
Bato mibale bakufi o’mokolo mwa eyenga na Lunda Norte, na Angola, na bitumba kati na ba forces de l’ordre mpe bato baye batombokaki mpo na kotelemela liya ya baluki diamants na moyibi, kolanda police ya Angola.
Bato zomi na misato bakufi na bobukani ya mabele nsima na mbula makasi na Mahanga, na chefferie ya Osso Banyungu, na Nord-Kivu, eyebisi ONG FDAPID (Foyer de développement pour l’autopromotion des pygmées et indigènes défavorisés).
Kati na maloba Martin Fayulu alobaki na lisikuku na ye na bozongi na ye na Kinshasa, o’mokolo ya mposo moloki na place Ste Kinshasa, apaleli président Félix Tshisekedi mpo na kosilisa na sanza misato mosolo ya budget yambula mombimba. Tolanda ndambo ya maloba ya Martin Fayulu.
Lingomba Lamuka ekomi lisanga ya bitumba ya poliki to plateforme politique, elobi bakambi na yango na nsima ya bokutani na ya mikolo mibale na Bruxelles, na Belgique.
Fécofa ebimisi jeudi liyebisi na kati na yango elobi ezuwi note ya élimnation ya ba Léopards U23 mpo na oyo etali mbula ya mosani Arsene Zola Liaku. Fecofa esali reours te ata ezalaki na mikolo mibale mpo na yango. Sango ya Thierry Kambundi.
Tshisekedi na Mgr Fridolin Ambongo bakutani. Botiyami ya gouvernement ya sika kala te. Epekisami kobutisa mbongo mpo ya Examen d’Etat mpe ya TENAFEP. FARDC na makoki ya bomoto na Beni. Fecofa endimi élimination ya ba Léopards U23.
President Felix Tshisekedi akutani na Mgr Fridolin Ambongo, episkopo ya lokumu ya archdiocese ya Kinshasa na cite ya Union africaine.
Ba ONGDH mingi babwaki mbela mpo kokebisa na bonzongi ya batomboki na Katanga. Totunaki moko ya baye batieyi maboko na mbela liye, mokambi ya ONG Justicia ASBL, Me Timoth130e Mbuya.
Voir plus