Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato bakufi na bitumba kati na baluki diamants mpe forces de l’ordre na Lunda Norte


Bana ya Congo démocratique babenganami na Lunda, na Angola, le 13 octobre 2018.
Bana ya Congo démocratique babenganami na Lunda, na Angola, le 13 octobre 2018.

Bato mibale bakufi o’mokolo mwa eyenga na Lunda Norte, na Angola, na bitumba kati na ba forces de l’ordre mpe bato baye batombokaki mpo na kotelemela liya ya baluki diamants na moyibi, kolanda police ya Angola.

Matata mabandaki ntango bavandi ya mboka Calonda, na Lunda Norte, bayokaki ete police na bato ya bokengi babomaki 17 baluki ya diamants na bozangi ndingisa. Bavandi baye batumbaki ndako ya nkumu ya mboka mpe bakotaki na lopitalo, eyebisi Alfredo Quintino Lourenço Nilo, commissaire ya police.

" Police ebetaki masisi mpo na kopanza bango ", elobi M. Nilo oyo abakisi ete bato babale kati na batelemeli bakufaki, moko na bango azalaki mwana. "Azwaki ‘balle perdue’ ", eyebisi M. Nilo.

Pene na bato 40 bakangemaki.

Banda octobre 2018, bakonzi ya Angola babandaki mosala ya kosukisa exploitation mpe commerce illégal ya diamants na etuka liye pene na ndelo na RDC.

Bato 700.000 babenganamaki, kolonda minsitre ya Intérieur, Angelo da Viegas Tavares.

XS
SM
MD
LG