Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moko ya bakambi ya batomboki ya FNL akangemi na Rwanda


Richard Sezibera, ministre ya misala ya mboka ya bapaya asakoli bokangami ya Callixte Nsabimana na bokutani na bapanzi sango na Kigali, Rwanda, 30 avril 2019.
Richard Sezibera, ministre ya misala ya mboka ya bapaya asakoli bokangami ya Callixte Nsabimana na bokutani na bapanzi sango na Kigali, Rwanda, 30 avril 2019.

Bakonzi ya Rwanda balobi ete bakangi molobeli ya lingomba ya batomboki FNL (Front de libération nationale) liye lifundami mpo na bobomi ya bato na zamba moko pene na RDC na Burundi.

Callixte Nsabimana, molobeli ya FLN, afundami mpo na "kosala lisanga ya basimba minduki, boyokani ya kosala misala ya ba terroristes, mpe kozwa bato na otages, koboma mpe kompunza," elobi liyebisi ya bakonzi ya Rwanda

FLN esalaka na FDLR (Forces démocratiques de libération du Rwanda, batmboki ya Rwanda baye bavandaka na RDC.

XS
SM
MD
LG