Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 13 bakufi na bobukani ya mabele na Masisi, Nord-Kivu


Mahanga ezindi nsima mbula monene mpe bobukani ya mabele, na Masisi, Nord-Kivu, le 29 avril 2019. (Facebook/Théoneste Bahati Gakuru)
Mahanga ezindi nsima mbula monene mpe bobukani ya mabele, na Masisi, Nord-Kivu, le 29 avril 2019. (Facebook/Théoneste Bahati Gakuru)

Bato zomi na misato bakufi na bobukani ya mabele nsima na mbula makasi na Mahanga, na chefferie ya Osso Banyungu, na Nord-Kivu, eyebisi ONG FDAPID (Foyer de développement pour l’autopromotion des pygmées et indigènes défavorisés).

Bobukani ya mabela boye bolandaki manoka makasi ya butu ya vendredi na samedi. Bato motoba bawaki na butu lina, kolanda FDAPID.

"Na nsima ya nzanga ya lundi, mabele ekweyaki lisusu mpe ebomaki bato sambo, kati na bango mwasi moko," etatoli mokambi ya territoire ya Masisi, Cosmas Tangakolo.

Biloko ebele ebebi. Ponts to gbagba mibale mpe ndako ya kelasi mwambe ememaki.

XS
SM
MD
LG