Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Parti ya Ntumi epesameli nzela ya kosala mosala na Congo mobimba


Mokambi ya ba ex-milice Ninja, Pasteur Ntumi, Congo, 21 août 2018. (VOA/Arsène Sévérin)
Mokambi ya ba ex-milice Ninja, Pasteur Ntumi, Congo, 21 août 2018. (VOA/Arsène Sévérin)

Bakonzi ya Congo-Brazzaville bapesi nzela na lingomba ya politique ya motomboki ya kala Frédéric Bintsamou to Pasteur Ntumi mpo na kosala mosala na etando mobimba ya ekolo liye. Mokano moye molongoli meko moye mopekisaki lingomba ya pasteur Ntumi.

Ministre ya Intérieur, Raymond Zephyrin Mboulou atindaki mokanda na pasteur Ntumi, elobi moko ya baye ya ministère ya Intérieur.

Pasteur Ntumi amibomba na région ya Pool banda bitumba bingalaki na mboka liye nsima na boboyi ya elonga maponami ya mokonzi Denis Sassou na présidentielle ya 2016.

Bato 138.000 bakimaki bitumba biye.

Na suka ya 2017, gouvernement mpe ba représentants ya pasteur Ntumi basalaki boyokani (accord).

Bibundeli 8.000 bizuwamaki na maboko ya ba Ninjas, babundi ya lingomba ya pasteur Ntumi.

XS
SM
MD
LG