Augustin Kabuya, kalaka mokonzi ya UDPS akomi na Twitter ete lingomba na bango ekoki kondima te maponami mango yambo na 2023 kaka mpo na kosepelisa FCC.
«L%27UDPS n%27a pas peur des élections anticipées, néanmoins, nous ne pouvons pas accepter cette option avant 2023 rien que pour plaire au FCC. Ils ont détruit ce pays avec méchanceté pendant 18 ans, ils doivent se taire», @soniarolley ,@StanysBujakera
— Augustin KABUYA (@auguyka70) November 11, 2020
"Babomi mboka eye na motema mabe mbula zomi na mwambe, esengeli bakanga minoko," ekomi Augustin Kabuya.
Bayi FCC bazali kotelemela misala mya koyoka bato mokonzi ya mboka Tshisekedi azali kosala mpe bazali kopamela koluka kosomba bakeli mibeko na bango.
UDSP ebengisi o’mokolo mwa mposo botamboli mpo na kopesa maboko na misala mya koyoka bato. Nzokande bayi FCC bango mpe bakani kotambola kaka mokolo yango kasi mpo na kotelemela misala myango.