Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Zuma alobi batielaki ye poison mbala mingi mpe mwana na ye akufi na yango


Jacob Zuma, mokonzi ya kala ya Afrika ya ngele na ngako ya bosambisami na Pietermaritzburg, RSA, 15 octobre 2019.
Jacob Zuma, mokonzi ya kala ya Afrika ya ngele na ngako ya bosambisami na Pietermaritzburg, RSA, 15 octobre 2019.

Mokonzi ya kala ya Afrique du Sud (Afrika ya ngele) Jacob Zuma alobi ete batielaki ye poison ntango azalaki na bokonzi mpe bato basalaki yango babomaki moko na bana na ye ya mibali.

Jacob Zuma alobi yango na bililingi bitiyami na YouTube mpe bilakisami na agence ya sango IOL.

Na bililingi byango, M. Zuma, oyo azali na mibu 78, azali kosolola na moko ya bana na ye, Duduzane Zuma na vidéoconférence.

"Ezalaki poison ya makasi mpenza, "elobi mokonzi ya kala ya RSA. "Ezali na lolenge misato ya poison ; ba poisons ya mabe mingi mpe ata minganga bakamwaki ndenge nini na bikakaki na na yango," abakisi.

Mpo na M. Zuma, moko na baninga baye ya bapaya nde abikisaki ye. Mwana na ye abakisi ete basilasaki tata na ye na Russie.

"Esengeli na tondo yo botondi mpo yo okendaki na nga, na nkombo ya bandeko bayo banso, na mboka yango," elobi M. Zuma.

Mokonzi ya kala ya RSA alobi ete mwana na ye oyo akofuaki na 2018 akweyaki na maboko ya baye balingaki koboma ye Jacob Zuma.

Nhlakanipho Vusi Zuma (mwana na ye oyo akufaki) "azalaki kobela maladie oyo bakokaki kobika na yango kino akokaki kokoma mukolo kasi akufaki na mbalakaka," elimboli Jacob Zuma.

Mokonzi ya kala ya RSA alobi ayoki mpasi mingi lokola ayebi sikoyo ndenge mwana na ye babomaki ye.

Jacob Zuma, avandaki na bokonzi uto 2009 kino 2018 mpe atindamaki kotika bokonzi na bofundami ya kaniaka mingi.

Afundamaki mpo na kopengwisa misolo ua l’Etat na kaniaka na libota ya ba Gupta.

Asambaki mpo na kosalale mosolo ya l’état na kotonga ndako na ye mpe na kolekisa motango na yango. Azongisa ndambo ya misolo yango na nsima ya kosambisama.

Alandelamaka mpe mpo na makambo misusu asalaka kala, yambo akota na bokonzi.

XS
SM
MD
LG