Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Xenophobia : Tshisekedi, Kagame, Mutharika mpe Buhari bakeyi te na Afrique du Sud


(G-D) Président Felix Tshisekedi ya RDC, mokokani wa ye ya Sénégal Macky Sall elongo na na Paul Kagame ya Rwanda na bokutani ya Fondation Tony Elumelu na Abuja, Nigeria, 27 juillet 2019.
(G-D) Président Felix Tshisekedi ya RDC, mokokani wa ye ya Sénégal Macky Sall elongo na na Paul Kagame ya Rwanda na bokutani ya Fondation Tony Elumelu na Abuja, Nigeria, 27 juillet 2019.

Président Félix Tshisekedi akeyi lisusu te na Forum to bokutani ya économie ya Afrika, na Afrika ya ngele (Afrique du Sud) epayi wapi bayike na ekolo eye bazali kosala eyoma likolo na bapaya.

Lolenge moko mpe Paul Kagame ya Rwanda, mpe bakonzi ya mboka nzike lokola Muhammadu Buhari ya Nigeria mpe Peter Mutharika ya Malawi baboyi kokende na bokutani boye.

Bokutani bwango bozali kosalema na Cap, na Afrika ya Ngele.

Koleka bato mitano basili koboboma na maboko ya baye bazali kosala eyoma o’balabala na binguma minene ya Afrika ya ngele na nkanda ya pabaya, kolanda police.

Kasi police elobi ete mingi ya baye bazwi mbeba ezali kaka bana ya Afrika ya ngele," eyebisi ministre ya mambi ya Police.

Kolanda communauté ya RDC, moyekoli moko ya Congolais mpe akufaki o’mokolo ya mibale.

Bayike na Congo démocratique basepeli te na eyoma yango.

Mokambi ya lingomba ya Batisseurs tshisekedistes, Fils Mokoko abengisi botamboli o’mokolo ya mitano na Kinshasa.

Nzokande, bayi politiki mpe bapameli mpe mobulu na Afrika ya Angele.

Moise Katumbi, Martin Fayulu Lubaya mpe Claudel Lubaya basengi na ba réseaux sociaux ete eyoma yango esila.

XS
SM
MD
LG