Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Concerts mibale ya Koffi Olomide eboyami na Afrique du Sud


Alanga nzembo Koffi Olomide ya Congo démocratique, 1er avril 2018. (Twitter/ Koffi Olomidé)
Alanga nzembo Koffi Olomide ya Congo démocratique, 1er avril 2018. (Twitter/ Koffi Olomidé)

Ba concerts mibale ya alanga nzembo ya Congo démocratique Koffi Olomide ekobetama lisusu te, eyebisi baye babongisa yango.

Ba concerts byango eboyami ntango campagne ezali kosalama ba réseaux sociaux mpo na kopekisa Koffi Olomide kobeta mindule nsima na bokweyisami na ye mibu mibale na sursis, na ntina ya atteinte sexuelle afundamaki na yango.

"Mindule ya Koffi Olomide mikobetama lisusu te le 28 juin na Gallagher Convention Centre (ya Johannesburg," ekomami na liyebisi libimi mercredi.

Esengelaki Koffi Olomide abeta miziki le 28 juin na Johannesburg mpe le 30 juin na Cap.

"Shimmy Beach" esakoli mpe mokano ya koboya concert ya Koffi.

Bisika babale (ba salles) baye balobi te ntina nini baboyi. Kasi campagne ebengami #StopKoffiOlomide ezali kosalama mpo na kopekisa moyembi moye kobeta na Afrique du Sud to Afrika ya Ngele.

Na mars, bazuzi bakatelaki Koffi mibu mibale ya boloko mpo na atteintes sexuelles na babini na ye ya kala. Kasi yango elingi koba été akosala boloko te.

XS
SM
MD
LG