Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koleka bato mitano bakufi na eyoma ya baye ya Afrika ya ngele na bapaya


Moto azali kokita kati molinga police ebwaki na Germiston, na Johannesburg, Afrika ya ngele, 3 septembre 2019.
Moto azali kokita kati molinga police ebwaki na Germiston, na Johannesburg, Afrika ya ngele, 3 septembre 2019.

Koleka bato mitano bakufi na eyoma bayike na Afrika ya ngele (Afrique du Sud) bazali kosala epayi ya bapaya, eyebisi bayi police.

"Montango ya bawei tozwi mozali mitano," nzinga nzinga ya Johannesburg, engumba monene ya ekolo eye, elobi liyebisi ya police.

Bakambi ya bokengi balobi babakisi ba pulusu na bisika ya mobulu makasi.

"Mingi ya baye bazwi mbeba ezali kaka bana ya Afrika ya ngele," eyebisi ministre ya mambi ya Police, Bheki Cele.

Mobulu yango mozali kosalama na Johannesburg, Petoria, mpe binguma misusu ya minene ya ekolo eye.

Président ya Afrika ya ngele Cyril Ramaphosa atelemelaki boyini ya bapaya mpe alobi ete yango ekoki kodimama soki moke te.

"Bitumba na basalami mombongo ya bapaya bikoki kondimama soki moke te… Nalingi yango esila sika oyo, akomaki na compte Twitter na ye.

Banda mokolo ya eyenga bayike na bana ya Afrika ya ngele babandaki eyoma. Bazali kobeta bapaya na nzela, na ba nzete, bibende mpe bipasola.

Police ebetaki gas lacrymogène mpe masasi ya caoutchouc mpo kopanza baye bazali kosala mobulu kasi bazali kozongela yango kaka.

Batumbi, babuki mpe bapunzi ba magazine mpe mituka mingi.

XS
SM
MD
LG