Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Afrique du Sud elongoli Egypte 1-0 lokola Nigeria, Cameroun 3-2


Mohamed Salah ya Egypte (D) angumbami nsima na kopola ya ba Pharaons liboso ya ba Bafana Bafana na 8e de finales ya CAN 2019, na Caire, 6 juillet 2019.
Mohamed Salah ya Egypte (D) angumbami nsima na kopola ya ba Pharaons liboso ya ba Bafana Bafana na 8e de finales ya CAN 2019, na Caire, 6 juillet 2019.

Nzokande ba Bafana Bafana ya Afrique du Sud balekaki na 8e kati na ba meilleurs 3es baye babendamaki na 16e lokola ba Leopards ya Congo democratique.

Bayike bapesaki ba Bafana Bafana chance mingi te liboso ya ba Pharoans ya Egypte baye basilisaki na 9 points na groupes A, ya ba Leopards, na elonga esota.

Kasi ata ba Pharaons babetaki makasi 67% ya kosimba balle, Thembinkosi Lorch ya Afrika ya Ngele atiyaki mongete na 85’ mpe makambo masilaki.

Nzokande na match ebatamaki yambo, Nigeria eniataki Cameroun 3-2.

Ighalo O. aningisaki moniaka moto na yambo na 19’ mpo na ba Super Eagles ya Nigeria.

Ba Lions indomptables ya Cameroun banzongisa mongete na 41’ na Bhaken S. mpe babakiaki na 44’ na N'Jie C.

Nzonkande Ighalo azongelaki lisusu na mongete ya ba Nigerians na 63’. Mpe, Iwobi A. akataki likambo na 63’ na mongete ya misatu ya Nigeria na 53’.

Mokolo moko moleki, vendredi, nsima na 1-1, Benin elongaki Maroc na ba tirs au but 4-1. Mpe Senegal enyataki Ouganda 1-0.

Na quarts de finale Senegal nde ekutani na Benin mpe Nigeria na Afrique du sud.

Esengeli kozela dimanche matches ya ba Leopards ya RDC na ba Bareas ya Madagascar mpe Algerie na Guinee. Lundi nde, Mali – Cote d’Ivoire na Ghana – Tunisie.

XS
SM
MD
LG