Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bayike babundisi bapaya na Afrique du Sud


Babomi moto ntango na eyoma likolo na bapaya na Pretoria, Afrique du Sud (Afrika ya ngele), 2 septembre 2019.
Babomi moto ntango na eyoma likolo na bapaya na Pretoria, Afrique du Sud (Afrika ya ngele), 2 septembre 2019.

Bitumba mingi bisalami o’balabala, ba nkama na bana ya Afrique du Sud (Afrika ya ngele) bakitaki o’nzela mpe bazali kobeta na somo bapaya, kopunza to kotumba biliko ya baye ya bikolo bisusu, na Johannesbur, Pretoria, engumba mokonzi mpe bingumba ebele bisusu.

Police ebimaki, ebetaki gaz lacrymogène mpe masisi ya caoutchouc mpo na kopanza bato bazalaki kosala eyoma na ba nzete, bimbende, biposala mpe bibende.

Eyoma yango ebandaki o’mokolo ya eyenga. AFP elobi ete bato misato bakufaki na moto, na Pretoria.

Na maloba atindi na WhatsApp moko na batambiwisi ya bana ya Congo démocratique na Afrique ya ngele akebisi bango mpo na kobima o'balabala.

"Bobima soki moke te libanda, ata mpo na likambo nini. Botinda bana na bino na kelasi te. Bozala na telephone (tshombo) bino bisika binso. Bakonzi ya ambassade bayebi makambo maye mpe bazali koluka eyano," elobi maloba maye makolemaki VOA Lingala.

Bilili mingi bitamboli na ba réseaux sociaux.

Magazini mingi ya pabaya, mpe ba compagnies mingi mapunzami mpe mabebisami. Mituka mingi mpe mizikisami.

Bituluku ya bato batomboki, na banzete, bibende, bipasola. Bazali kolanda bapaya, emonisi bilili bizali kotambola na ba réseaux sociaux.

Police elobi ete ekangi bato 70 na Johannesburg mpo na eyoma eye.

Mibu na mibu biyoma mpe bitumba na bapaya bisalamaka na bana ya Afrique du Sud.

XS
SM
MD
LG